Canalblog
Suivre ce blog Administration + Créer mon blog

luzolo amour

17 mars 2012

ukizola, omilinga po okoma na kimpuanza

Moto nionso oyo akozua makambo oyo atie yango na monoko oyo ezaal yaa katiopa te akozua boloki na bomoyi na ye pe na bana na libota na ye mobimba motango ya bato oyo bakufi na kongo banda banguna bakota na katiopa.po makambo oyo ezali kaka ya bana ya katiopa (afrique noir) botia yango kaka na minoko ya bato moyindo.

Depuis quelqueses siècles. Banda sima ya mua bitandu (ba tango) bato ya katiopa bamikotisaki na bozoba ya komiyina, po balinga bapaya oyo bango bayebaki epayi bawutakite, banda wana bana ya katiopa to pe (bato moyindo) yango wana nazali kolakisa na bokebi mionso lolenge nini na ko luka na nga na kati ya mokili, na moni eloko nini ezali kosala biso pasi ya mingi, kasi esengeli nde to sala makasi po ete tobima na bozoba wana pe tokoma na kimpuanza na biso. 

Nzambe oyo akeli mokili apesa na batu na bato oyo ekoki na bango, na ndenge ya botosi oyo bazalaka nayango epayi na ye. liboso Nzambe apesa yo bomengo esengeli otosa mibeko na ye sima nde ako pesa yo esika okozala na bomengo nionso ya mokili oko fanda likolo ya bomengo pe okotambola likolo ya bomengo pe oko lala likolo ya bomengo, na bomengo oyo ezali na mobeko moko, mobeko yango elobi boye : tango tata Nzambe apesi moto etumbu esengeli na yo te olongola etumbu wana, kokanisa te ete yo nde oleki tata nzambe na mawa.soki otie mawa na yo liboso ete moto oyo Nzambe apesaki etumbu yo olongoli ye na etumbu wana , moto oyo akomona Nzambe pamba po etumbu wana esalami te na sima ya mawa na yo, pona yango yo nde okozua etumbu esika ya moto oyo pe moto yango akoniokola yo mawa te. Yo muana ya kongo ozali libota ya Nzambe, yango wana Nzanbe apesaki epayi ya ba Koko na yo mabele ya bomengo nionso ya mokili. Mawa ya mokonzi na biso Nzinga nkuwu nde elongolaki etumbu oyo Nzambe apesaki ba mindele yango wana biso lelo tokomi koniokuama epayi ya bato oyo Nzambe apesaki etumbu. mingi ba komituna etumbu yango Nzambe apesaki bango ya nini? lokola bana ya katiopa ya lelo balata bozoba ya kokanisa ete Nzambe apesa bango mayele po basala mituka pe biloko misusu, kasi biso te. Bo mituna tango ba koko na biso ba tongaka ba Pyramide bango ba tonga ka nini ? boyeba banda lelo ba maconics ( franmacon) balataka dessin ya ba outils mathematic oyo bayibaka na katiopa na mboka ya ngipiti. ezali compat, equeur pe raporteur yango wana ezali emblème na bango.tango bazalaka bango moko na ba mboka na bango ya poto basalaka mituka nini ? tango bayaka na katiopa bayaka na masini nini ? Pona nini bato oyo bazali mitakala pe ba (sauvage d'après bango ) ba koki kozala na royaume ? bobosana te royaume ezali mot europeen.

Publicité
Publicité
luzolo amour
Publicité
Archives
Publicité